audio
audioduration (s)
2.24
30
transcript
stringlengths
20
274
Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela a butu mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata
Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu okola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka
nyonso oyo abongisi moto ya sembo nde akolata yango pe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye
Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele opanga ezali lifuti na bango akitani na ye bakokufa na nzala
Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe ibula oyo moto ya mobulu azwaka pai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
Bino nyonso boyebi yango malamu ongo mpo na nini bilobaloba ya boye ?
Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe akobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
Boni akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso o akobelela lisusu Nzambe tango nyonso ?
Elikya nini moto mabe azali na yango ango Nzambe azwi bomoi na ye ?
nakobatela bosembo na ngai nakotika yango te otema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te
Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino ino tango nakokufa nakotika te kotatola oyengebene na ngai
bibebu na ngai ekoloba mabe te pe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te
wana ngai nazali nanu na bomoi pe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai
azipaka kiti ya bokonzi na Ye tandaka mapata na likolo na yango
Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te telemisaka mabele na likolo ya eloko moko te
Liboso ya Nzambe mboka ya bakufi ezali bolumbu pe libulu ya molili ezali polele
Bakufi balengaka na se ya mayi pe ya bikelamu oyo ezalaka kuna
Ozwi maloba oyo wapi ? olimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?
Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya pe tala ebele na mayele oyo olakisi
Ah Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi denge osungi loboko oyo elembi
Soki kutu sanza ezali kongenga te pe minzoto ezali peto te na miso na Ye
Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? denge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?
Boni bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ? a likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?
Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe tiaka kimia na bisika na Ye ya likolo
Bilidadi moto ya Shuwa azwaki maloba mpe alobaki
Soki ezali bongo te nani akoki kolakisa ngai te nazali koloba lokuta ? ani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ?
Mpe atako sik oyo bazali bato minene a tango moke bakozala lisusu te akokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso akokatama lokola mito ya ble
Nzambe apesaka bango kimia asi miso na Ye etalaka nzela na bango
Kasi Nzambe na nguya na Ye bakisaka mikolo ya banyokoli na bango ta batombolami bazalaka na elikya te po na bomoi na bango
Bato mabe basepelisaka basi bazangi bana pe bato oyo babotaka te asi basalaka bolamu te epai ya mwasi oyo akufisa mobali
Libumu ya mama ebosanaka bango pe bankusu esepelaka kolia bango akanisaka bango lisusu te amba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete
Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe denge wana mpe mboka ya bakufi emelaka ato oyo basalaka masumu
Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi teni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka ango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino
Mpo na bango molili makasi ezali nde tongo omo ya molili ekomaka moninga na bango
Kati na molili bato balukaka kobuka bandako ya bato asi na moyi bamikangelaka na ndako azali koboya pole
Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota milobelaka Moto moko te akomona ngai pe abombaka elongi na ye
Mobomi azali kotelema na moyi pe koboma mobola elongo na moto akelela a butu azali lokola moyibi
Bato oyo bazali kosala bongo azali kotombokela pole ayebi nzela na Ye te pe batambolaka ata kati na yango te
Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka pe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga po na koluka lisungi asi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te
Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu akamolaka bambuma ya vino asi bazongaka kaka na posa ya komela
Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye azali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo
bapoli na mvula ya ngomba akangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama
Na butu balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba azangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili
bakataka matiti na bilanga mpo na bibwele pe balokotaka bambuma yo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe
Lokola ba-ane ya zamba babola bakendaka tongo-tongo a mosala mpo na koluka biloko ya kolia asi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei
balongolaka babola na nzela pe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama
babotolaka ane ya mwana etike pe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali a mwasi oyo akufisi mobali
Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te po na esambiselo ? po na nini bato oyo bayebi Ye asengeli koluka na pamba mikolo ya boye ?
Nzambe alembisi ngai kolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai
Yango wana liboso na Ye nazali koyoka somo makasi pe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso azali kobanga Ye
Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai pe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa
Kasi Ye azwaka Ye moko mokano na Ye ani akoki kotelemela Ye ? salaka nyonso oyo esepelisaka Ye
Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye abatelaki yango lokola bomengo ya kitoko oleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo
Makolo na ngai elandaki matambe na Ye atambolaki na nzela na Ye pe natikalaki kopengwa na yango te
Nzokande Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda oki ameki ngai nakokoma lokola wolo ya peto
Tango azali na mosala na ngambo ya nor azali komona Ye te ango azali kobaluka na ngambo ya sude azali komona Ye ata moke te
Soki nakeyi na ngambo ya este azali kuna te oki nakeyi na ngambo ya weste nazali komona Ye te
Kuna liboso na Ye moto ya sembo akososolisa Ye ikambo na ngai pe nakokangolama libela uta na maboko ya mosambisi na ngai
Boni alingaki kosalela nguya na Ye po na kosamba na ngai ? e alingaki kutu koyokela ngai mawa
nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai pe kososola makambo oyo alingaki koloba na ngai
nalingaki kotalisa na bosembo nyonso ikambo na ngai liboso na Ye pe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo
Lelo lisusu kolela na ngai ezali bololo oboko oyo ezali likolo na ngai eleki olela ya motema na ngai na kilo
Soki bato balembi mpe yo olobi Telema zambe akobikisa bango
Makambo oyo okokana ekosalema pe pole ekongenga na nzela na yo
Okosambela Ye Ye akoyoka yo pe okokokisa ndayi na yo
Solo okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso pe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe
Bwaka wolo na yo kati na putulu olo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku
Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oki obengani mabe mosika ya ndako na yo omengo na yo ekozongela yo
Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia a nzela wana bomengo ekoya lisusu epai na yo
Solo banguna na biso babebi oto ezikisi bomengo na bango
Nzokande Ye nde atondisaki bandako na bango a biloko ya kitoko ango wana ngai naboyaka toli ya bato mabe
Bazalaki koloba na Nzambe Tika biso biso moko kolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini ?
Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala zela oyo bato mabe balekelaki ?
Mapata minene ezipi Ye ango wana azali komona biso te ana azali kotambola-tambola na etando ya Lola ?
Nzokande ozali koloba Nzambe ayebi nini ? koki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ?
Boni Nzambe azali te kuna na likolo kati na Lola ? ala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka
Yango wana mitambo ezingeli yo obebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo
ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba pe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike
atako ozalaki moto monene nkolo mabele pe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu
ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi pe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei
Ozalaki koluka na pamba ndanga pai ya bandeko na yo ya mibali zalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu
Mabe na yo ezali monene te ? asumu na yo eleki ndelo te ?
Boni okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo de azali kopamela yo mpe kosambisa yo ?
Ezala soki ozali moyengebene itomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa ta ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ?
Boni litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? zala ata moto ya bwanya azalaka na litomba aka mpo na ye moko
Elifazi moto ya Temani azwaki maloba mpe alobaki
Boye mpo na nini bozali komitungisa po na kobondisa ngai ? amba te kati na biyano na bino etikali kaka lokuta
ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi kangolamaka mpe na mokolo ya kanda
Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela ? obosani makambo oyo bayebisaki bino
bolobaka Wapi ndako ya mozwi ? api bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ?
Solo nayebi malamu makanisi pe mabongisi na bino mpo na kotelemela ngai
Nzokande bango mibale bakolala ndenge moko a se ya mabele pe bankusu ekozipa bango
mosusu azali kokufa na mawa na motema tikali ata komeka kosepela na bomengo te
na nzoto sembesembe pe na mikuwa etonda na mafuta
Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele e oyo asambisaka ezala bato oyo baleki kotombolama ?
Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini ango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka ?
Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye pe amela kopo ya kanda ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
Balobaka Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe pai ya bana na ye ika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe po ete ayeba yango
Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango okola makasa to matiti ya kokawuka ?
Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? bala boni pasi ezali kokitela bango ? oni Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?
README.md exists but content is empty. Use the Edit dataset card button to edit it.
Downloads last month
0
Edit dataset card